CORRIGER LES PAROLES

Paroles : Noctambule

[Intro]

Noctambule
Eeh Théophile Mulumba
Nzambe a pesa kingo pe mayaka
Aah, eeh

[Couplet 1]

Nini na sali yo pote y’obwakisa ngai
Na kotaki na motema na yo na malembe, o ndimaki ngai eeh
Lokola ko kota ya sango na eklezia mokolo ya misa ya Pasika na Saint-Michel
Enthousiame particularité na ba acolytes pe ba fidèles ba sepela mokonzi a sekwi eeh
Souci ye ye ye souci aah aah aah Théophile Mulumba
Souci ya bolingo ya Théo e lati ngai na nzoto
Souci ya bolingo ya Mulumba e lati ngai na nzoto
Pourquoi o lingi hôpital e koma ndako na ngai
Likolo ya déception ya amour na yo
Likolo ya déception ya amour na yo Théophile

[Pont]

Il fallait o tala thermomètre ya bolingo avant o boya ngai
Tango température ezalaki élevée nde o bwakisi ngai
Sans le fleuve Nil que deviendra l’Égypte ? (Désert)
Sans le fleuve Nil que deviendra l’Égypte ? (Désert)
Sans toi Théophile o kotisi ngai na monde ya incertitude
Na lalaka te, ngai vraiment na phasaka te eeh eeh

[Refrain]

Na koma na ngai voisin ya ba pensées
Na koma na ngai voisin ya ba insomnies
Na lembi ko tanga ba plafonds
Même les étoiles j’arrive à compter
Meka ata ko leka liboso ya lopango na biso
Peut-être nako yoka solo ya parfum na yo
E longola ngai maladie oyo e silisaka pongi eeh eeh aah
O ngai oyo (na koma noctambule)
Noctambule noctambule (na lalaka te)
Noctambule pona Théo (likolo ya souci)
O ngai eeh (na koma noctambule)
Noctambule pona Théo (na lalaka te)
Théophile Mulumba (likolo ya souci)

[Couplet 2]

Absence na yo ekomi o reduire ba jours na ngai eeh
Ezo mema ngai mukie mukie na lilita
Awa na miso na ngai pongi e koma tabou
Ndenge nazali awa na koma déjà moweyi
Nature na ngai bolingo n’o Théo Mulumba
Na koma ko vivre na ba chocs, ba migraines, na souffrance
Eeh ngai ooh (na koma noctambule)
O ngai eeh (na lalaka te)
Noctambule pona Théo (likolo ya souci)
Théophile Mulumba

[Vocal : Nathan Munkala]

Ata mapa foutus ba boulangers ba négligeaka ango te
E tekamaka moins cher, pesa ngai bolingo ya valeur
Nini lisusu Théophile Mulumba
Nini lisusu Merveil Kimbuta, Albert Koulibaly
Sourire na monoko nioso o silisa
Bébé elongi na ngai, télé oyo e lakisaka kaka film ya mawa
Y'obelisa ngai eeh, y'olelisa ngai
Ti'oko bomisa ngai eeh Zéphirin Mfumu
Moise Kambudi, Michaud Kabuya aah

[Refrain]

Na koma na ngai voisin ya ba pensées
Na koma na ngai voisin ya ba insomnies
Na lembi ko tanga ba plafonds
Même les étoiles j’arrive à compter
Meka ata ko leka liboso ya lopango na biso
Peut-être nako yoka solo ya parfum na yo
E longola ngai maladie oyo e silisaka pongi eeh eeh aah
O ngai oyo (na koma noctambule)
Noctambule noctambule (na lalaka te)
Noctambule pona Théo (likolo ya souci)

[Vocal : Ambassy Bourgeois]

Théophile o zwaki ngai gouter-laisser
O komisi ngai noctambule Rodrigues Matende
Mbeto e komi échantillon
Na lalaka lisusu te lokola jeep ya patrouille
Na luka Lebon Lutete, Mishpa Pangasudi
Oh Papy Matalatala yako sala remise et reprise
Insomnie e tikela pongi mbeto président Dieudonné Kishiko
Ko lela na ngai ya esengo ya Junior Tshizainga
Oscar Maritou papa ya Prodige

[Refrain]

Na koma na ngai voisin ya ba pensées (ya ba pensées)
Na koma na ngai voisin ya ba insomnies (ya ba insomnies)
Na lembi ko tanga ba plafonds (ba plafonds)
Même les étoiles j’arrive à compter
Meka ata ko leka liboso ya lopango na biso
Peut-être nako yoka solo ya parfum na yo
E longola ngai maladie oyo e silisaka pongi eeh eeh aah
Pona yo ngai yo ngai yo (na koma noctambule)
Noctambule noctambule (na lalaka te)
Noctambule pona Théo (likolo ya souci)

[Outro]

Na zanga chance eeh, na zanga chance eeh
Oyo a gagna eeh Marlène Mulumba
Ye nde a vanda na motema ya Théophile Mulumba
Théophile Mulumba ndeko ya Sylvie Mulumba
Nadine Mulumba, Zadio Mulumba aah aah

Pona yo ngai yo ngai yo (na koma noctambule)
Noctambule noctambule (na lalaka te)
Noctambule pona Théo (likolo ya souci)